Nofra ketsh Lyrics By Fally Ipupa

Merci ya Meje po obota Nana Ketchup
Alain Mbenza ciseaux d'or, Mbemba Aigle
Denide ba mbongo, Louise Luka, Kapi Biatana dit Aunh!
Bijou Kiyika yo nde vraiment elongi ya ba fete quoi!
Romino Makasi, Mi Jose la reine de kanfunfu, Dachi Tshibasu!
Nana lelo na sosoli ih, Nana na ah nga lelo na sosoli ih!
Que bolingo le veritable ebombana na mitema ya ba fille ya timide
Oyo ba salaka semblant lokola ba lingaka te oh (Ba lingaka te eh)
Yo oyaki na vie na ngai na maloba ya ba santu uh
Na komaki ko kanisa kutu yo nde porte-parole ya Nzambe
Nga na motema na tielaki yo ba anti-vols
Po ata après un siècle mobimba moyibi ya bolingo akota te
Nzoka yo fraude aki na sentiment pe na vie na nga
Na makanisi que na terminus ya bolingo ofuta nga droit ya bolingo te
Et pourtant yo salaki mosala mungwa esalaka na bileyi eh
Moninga apesaki yo bolingo o multiplier par nombre nyonso olingi
Yo komisi nga lokola parfum de grande marque
Oyo yambo mosombi avant asomba il faut ameka ata ndambo
Sima naye soki zomi bakosala lolenge yo osali nga
Tango oko zonga oko kuta nga ya ndambo (Esengo eko zala te oh mitema Nana ah)
Eh nzoto eboya mbindo Claudine Londjoka, Alain Finini aunh!
Salon Emilia na station ma-campagne, Le vieux Cipy Rumande na maman Jackie
Entreprise familiale, Charlie Mabiala Tigre, mon major Henry Kapend
Yango lelo nga na bondeli yo ozonga ah (Yo zonga ah) Betty Mulanga uh!
Yango lelo nga na bondeli yo ozongela nga ah (Yo zonga ah)
Oyo ozo sala nga oko bomisa na ba innocents aunh
Mayi ya miso na saleli matanga nayo lelo (Dans dix ans eko inonder le monde entier)
Oh Nana aunh (Yango nasengi ONU aya intervention)
Po na boyi na provoquer fin du monde oyo Nzambe a prevoir yaki te
Elikia ya suka nazo zela se motema na nga (Tango eko koma debordé na bolingo na yo)
Debordé maman ah (Tango nako koma na nga naufragé) Blandine Longangu!
Peut être oko yoka nga ata mwa mawa na mbelela ya suka na nga ah
Moweyi azalaka na monguna te Nana, Le vieux Adam Bombole!
Liwa ya bato mosusu soki tozo lela na mawa na mitema
Yo olakisi nga ya nga moko po na zala lolenge kani?
Bolingo oyo ebandaki na esengo lokola mwana azongi kelasi na elamba ya sika
Lelo obongoli yango mawa, na koma koyina ti Nzambe mokeli na nga ah
Soki likolo eyindi nazo banga mvula enoka ebungisa matambe na yo oh
Eloko na tikala nango seul souvenir (Mais kanisa tango ozalaki ko linga nga)
Oh maman aunh (Demarche ralenti lokola ba sous ya quartier na Independance)
Na Independance (Lelo distance otiki nga) Maman ah (Lokola distance entre bus na velo)
Na yebi nako mona yo lisusu te oh Nana ah, zonga opesa nga ata baiser ya suka
Etikala soulagement aunh aunh! Eh Gautier Ewing na milan mon pote!
(Yo moto oyaki kozwa nga na aeroport ya l'amour na Cortège) Carole wana
(Nzoka mituka oyaki nango pona ramene nga) Ah lipasa sandra Sante
(Ezalaki déception, malheur, misere na ba soucis)
Nayebelaki yo motema makasi boye te Nana ah ah, Didier Mpeti!
Kende nzambe a reviser yo, yo okatani mosisa oyo eyokaka bato mawa ah!
Yo okatani mosisa ya souci ya baninga ah! Guigy Esika loboko Bobby Stone!
Nana kombo na yo esi ekoma kisi ya bolingo na nga ah
Soki nazo bela natangi kombo na yo maladie esilaka ah
Parfum na yo lokola likayabu oyo bazali ko tumba
Mopepe ata ememi solo ata dix km na yokaka eh
Yo olingaki na yo nga te po l'amour esalaka mabe te
Moto osekwisaki akufi lisusu akomi nde kopola oyoki na yo mawa te Nana Ketchup
Lelo nga na ndimi ye l'amour est aveugle, po ezuwa toli te na mbeli ya décepition ezuwa
Yaka olongola ngai kindoki ya mukolo liesa nga ekomisa nga kizengi ih!
Nasi nakomi na suka ah, yaka o libérer nayo nga ah, nakowa pona yo maman!
Jean-jacques Muya, nako koka mpé ko bosana yo te Nana ah ah
Le conseiller des grands travaux, nako koka mpe ko bosana yo te Nana ah ah
Reviens vite mon amour, tu es vraiment unique en ton genre aunh ah!
Kams Musampa, Henriette Kajinga (Tu es vraiment unique en ton genre eh)
Pitchu et Blaise Liongo papa na Venice (Tu es vraiment unique en ton genre eh)
Eh Bijou Bilawu, le vieux DG Bilawu (Tu es vraiment unique en ton genre eh)
Maman na Marcosins eh, Erick Divita Eluka makambo, ah camarade ya Nadine!
Bango oh, Jerry coiffure, Francine Mbombo oh, Sylvie Boga, ya Jean luc Mukoko oh
Chiro Tshamala ah, Nanu Nzau, Nicole Matsuda ah, Mariam la grande dame de la ville
Alice Mwati, Regine Ndjoluka ah, Belinda Makoma ah, Roger Ndade eh
Judith Mikalukidi ih, Cynthia Lokondo oh, Delphine Lumbila ah, Guylaine Kapaya ah
Renate Kapaya ah, maman ah, Eh! Vicky Levure (Tu es vraiment unique en ton genre eh)
Eckos Mukoko (Tu es vraiment unique en ton genre eh) Yo na camionnette Mbola ah
Bobondela Nana (Tu es vraiment unique en ton genre eh)